From Wikipedia
|
Engúmba / Etúká ya Kinshasa |
|
|
| Esé |
Kɔ́ngɔ (RKD) |
| Engúmba Mokonzi |
La Gombe |
| Gouverneur |
M. Baudoin Liwanga Maata |
| Nkótá ya ekólo |
Lingála |
| Etando |
9 965 km² |
| Mito estimée |
7 500 000 hab.
(2005) |
| Bato na etando |
752,63 hab./km² |
| ISO 3166-2 |
CD-KN |
Nombre de députés
de la province |
59 |
| Localisation |
 |
| Communes et Territoires - Villes - Provinces |
Mbóka tô engúmba Kinsásá —ekokí kotangemene Kinshásá— (óyo eyebenákí kala o nkómbó Léopoldville) ezalí mbóka-mokonzi ya Repubiliki ya Kɔ́ngɔ Demokratiki. Ezalí mpé etúká (province) ya ekólo êná. Ezalí engúmba monɛ́nɛ, na milioni 8 ya bato (est.). Elongo na nyɔ́nsɔ óyo, Kinshasa ezalí engúmba ya míbalé na bingumba nyɔ́nsɔ ya mokili, na elobelí lifalansé, na sima ya engúmba Pari (Falansia), mpé ezalí o káti ya bingúmba minɛ́nɛ koleka ya Afrika o nsé ya Sahara.
Esika ya bapark ya bulevale ya 30 Yuni, Kinshasa, Kongo, Avrili 2003
Ekútání na mabele o loboko-ya-mwǎsí ya Ebale ya Kɔ́ngɔ. Na yangó etalaní pɛnɛ-pɛnɛ mpenza na Brazzaville, mbóka-mokonzi ya Republiki ya Kɔ́ngɔ tǒ mpé Kɔ́ngɔ-Brazzaville. Kinshasa ekútání na 4°16' Sud, 15°17' Este (-4.2667, 15.28333).
Bisíká minɛ́nɛ ya êná engúmba: Cité de l'OUA, ndáko ya Bulamatari ya Kɔ́ngɔ-Kinshasa; Komini ya Matonge, óyo eyebaní mokili mobimba mpɔ̂ na malɛki-butu na yangó; komini ya Gombe. Engúmba óyo ezalí na mǎto ya ebale tǒ mpé baferry na esɛ́mɛlɔ ya Beach Ngobila mpɔ̂ na kokɛndɛ Brazzaville na Bangi, na nzéla-masinu ’te na Matadi, elongo na Aleopori ya N’djili.
Bilóko minɛ́nɛ óyo emonanaka míngi ezalí Buludingi ya SOZACOM, Hotel Inter-Continental na Hotel Memling, Zando monene ya Kinshasa, Mizé ya Kinshasa na Académie des Beaux-Arts. Bulevale ya 30 Juin ndé ekangasí biténi nyɔ́nsɔ ya êná engúmba.
Évolution de la population de Kinshasa
| Année |
Bato |
| 1920 |
1 600 |
| 1936 |
40 300 |
| 1938 |
35 900 |
| 1939 |
42 000 |
| 1947 |
126 100 |
| 1957 |
299 800 |
| 1959 |
402 500 |
| 1968 |
1 052 500 |
|
| Année |
Bato |
| 1970 |
1 323 000 |
| 1974 |
1 990 700 |
| 1976 |
2 443 900 |
| 1984 |
2 664 309 |
| 1991 |
3 804 000 |
| 1994 |
4 655 313 |
| 2005 |
7 500 000 |
| 2015 |
est. 12 000 000 |
|
| Source: Populstat, World Gazetteer |
Image of Kinshasa and Brazzaville, taken by NASA
Moyennes de température et de précipitations
|
Min.
(°C) |
Max.
(°C) |
Pluie
(mm) |
| Yanuari |
21 |
31 |
135 |
| febuari |
22 |
31 |
145 |
| mársi |
22 |
32 |
196 |
| apríli |
22 |
32 |
196 |
| mai |
22 |
31 |
159 |
| yúni |
19 |
29 |
8 |
| yúli |
18 |
27 |
3 |
| ogusiti |
18 |
29 |
3 |
| septembere |
20 |
31 |
30 |
| ɔkɔtɔ́bɛ |
21 |
31 |
119 |
| novɛ́mbɛ |
22 |
31 |
222 |
| desembere |
21 |
30 |
142 |
| * Sources : BBC Weather |
[kobalola] Nkásá-web o libándá Wikipedia
Óyo ezalí ndámbo. Okoka kosálisa mpé kobalusa. |